8 Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.
Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi : Yashobeami, mwana mobali ya Akimoni, azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko ; abomaki na likonga bato nkama misato na etumba moko.
Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango.
Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »