Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 26:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 26:7
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mpe bazongaki na engumba. Bongo, Joabi azongaki na Yelusalemi.


Bayuda mosusu oyo bazalaki kovanda kati na bituka ya mokonzi, bango mpe basanganaki mpo na komibatela mpe bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango.


nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.


Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.


Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.


Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.


Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino ; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo.


Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?


Moto moko kaka kati na bino azalaki kokimisa bato nkoto moko, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azalaki kobundela bino ndenge alakaki.


Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko.


Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.


Bana ya Isalaele oyo bawutaki na Nefitali, na Aseri mpe na Manase basanganaki mpo na kobengana bato ya Madiani.


Jonatan asalelaki makolo mpe maboko na ye mpo na komata, mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye alandaki ye na sima. Wana Jonatan azalaki kokweyisa bato ya Filisitia na liboso ; na sima na ye, elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki koboma bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ