6 Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.
Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.
Kasi okozala na mwana moko ya mobali oyo akozala moto ya kimia mpe ya boboto. Nakopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingeli ye. Kombo na ye ekozala Salomo ; mpe na mikolo nyonso oyo ye akozala mokonzi, nakopesa kimia mpe bopemi na Isalaele.
Kasi nakobengana bango te na mbala moko mpo ete mboka ekoma te lokola ndako ezanga bato, mpe mpo ete banyama ya zamba ekoma mingi te mpo na kotungisa bino.
Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
Nkosi ekozala te na nzela yango, ata nyama moko te ya mabe ekoleka na nzela yango, ekotikala komonana kuna te. Kasi basikolami kaka nde bakotambola na nzela yango.
Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu ! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango ;
Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.
Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango.
Nakotindela yo nzala makasi mpe banyama mabe mpo ete eboma bana na yo nyonso. Nakotindela yo mopanga mpe bokono ya makasi, nakosopa makila koleka kati na yo. Ngai Yawe nde nalobi. »
Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.
Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.
Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.
Moto nyonso akovanda na kimia kati na bilanga na ye ya vino mpe na se ya nzete na ye ya figi. Moto moko te akobangisa ye, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.
Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te, bakokosa lisusu te to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango. Bakolia mpe bakolala na kimia, mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.
‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko.