Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 26:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 26:5
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bibombelo na biso etondi na biloko ya ndenge na ndenge ; bameme na biso ezali kobotana na minkoko, na bankoto zomi kati na bitonga na biso ;


Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.


Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.


kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »


Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi ; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.


Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili.


Boye, akotindela yo lisusu mvula mpo na milona oyo okolona na mabele, mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene.


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai : « Mobali na ngai ya libala ; » okobenga ngai lisusu te : « Nkolo na ngai. »


Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.


Yawe akoyanola mpe akoloba na bango : « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.


Banyama ya zamba, bobanga te, pamba te matiti eboti lisusu na elanga, banzete eboti lisusu bambuma ; banzete ya figi mpe ya vino eboti bambuma ebele penza.


Bokolia bilei ebele mpe bokotonda, bongo bokokumisa Kombo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo asaleli bino makambo ya kokamwa : bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.


« Mikolo ezali koya, » elobi Yawe, « mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki, mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki. Vino ya sika ekobota na bangomba milayi mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.


Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda.


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ