Levitike 26:44 - Mokanda na Bomoi44 Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango ; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,