Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 26:3 - Mokanda na Bomoi

3 Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 26:3
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›


Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino.


Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili.


Boye, akotindela yo lisusu mvula mpo na milona oyo okolona na mabele, mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene.


oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango : « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino ; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino.


Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.


Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.


Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ