Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 26:25 - Mokanda na Bomoi

25 Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 26:25
42 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki ; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki.


Tango banguna bakolonga bato na Yo, Isalaele, mpo ete basali lisumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo,


Tango nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko ekokota kati na mokili, tango banguna bakozingela bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango ; tango pasi to bokono ya lolenge nyonso ekokweyela bango,


Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari.


Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi.


Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, mimonisa kati na nkembo na Yo !


Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.


Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki, bokokufa na mopanga. » Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.


nakobongisa bino ete bokufa na mopanga, mpe bino nyonso bokofukama mpo ete bakata bino bakingo, pamba te nabengaki, kasi boyanolaki te ; nalobaki, kasi boyokaki te : bosalaki kaka makambo mabe na miso na Ngai mpe boponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »


Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.


Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, kino tango ekosilisa koboma bango na mokili oyo napesaki bango elongo na batata na bango. »


Boyoka ! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe ; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.


Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Botala malamu makambo oyo ! Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu !


Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala ; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga ! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ; obomi bango na mawa te !


To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi : ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba ! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango ;


Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakoyeisa mopanga mpo na kobebisa yo, mpe nakoboma bato na yo mpe bibwele na bango.


« Mwana na moto, loba na bandeko na yo mpe yebisa bango : ‹ Soki nabimisi bitumba na mokili moko, bongo bato ya mokili yango baponi moko kati na bango lokola mokengeli na bango ;


Nakotindela yo nzala makasi mpe banyama mabe mpo ete eboma bana na yo nyonso. Nakotindela yo mopanga mpe bokono ya makasi, nakosopa makila koleka kati na yo. Ngai Yawe nde nalobi. »


Loba na yango : Oh bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba milayi, na bangomba mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Namibongisi mpo na kotindela bino mopanga mpe kobebisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba.


Mopanga ekokota na bingumba na bango, ekobuka bikangelo ya bikuke na bango mpe ekosukisa mabongisi na bango.


Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.


« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Bokono oyo ebomaka ezalaki kotambola liboso na Ye, mpe pasi makasi ezalaki kolanda matambe na Ye na sima.


Nakokweyisa bango na nzela ya etumbu ya bokono oyo ebomaka mpo na kobebisa bango. Kasi yo, nakokomisa yo ekolo moko monene mpe ya nguya koleka bango.


Boye Moyize alobaki na bato : « Tika ete mibali kati na bino balata bibundeli mpo na kokende kobundisa mokili ya Madiani mpe kozongisela bango mabe na mabe, na Kombo na Yawe.


mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala ; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.


Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.


Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.


Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison : — Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso ? Likambo nini osali biso ? Samison azongisaki : — Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ