Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 26:22 - Mokanda na Bomoi

22 Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 26:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Liboso, tango bazalaki kovanda kuna, bato yango bazalaki kogumbamela Yawe te. Boye Yawe atindaki nkosi kati na bango, mpe ebomaki ndambo ya bato kati na bango.


Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.


Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili.


Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali.


Nzela ya minene esili kokawuka, ata moto moko te ya mobembo azali koleka. Mobebisi abuki boyokani, asambwisi bingumba mpe azali na botosi ya moto ata moko te.


Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe : « mopanga, mpo na koboma bango ; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango ; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango.


pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye : — Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo : « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali ; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke.


Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga, pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te. Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te, Banganga-Nzambe na ye bazali kolela, bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazali na mawa ; bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.


To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango ;


Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango,


nakokomisa mokili libebi mpe nakosala ete etikala lisusu na bato te : nakosukisa lolendo na yango, bangomba ya Isalaele ekotikala lisusu na bato te, mpe bato bakotika kolekela wana.


Nakotindela yo nzala makasi mpe banyama mabe mpo ete eboma bana na yo nyonso. Nakotindela yo mopanga mpe bokono ya makasi, nakosopa makila koleka kati na yo. Ngai Yawe nde nalobi. »


Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »


Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.


Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati ; mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te, bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ