Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 26:21 - Mokanda na Bomoi

21 Soki botelemeli Ngai mpe boboyi koyoka Ngai, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 26:21
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nkolo, zongisela bikolo oyo ezingeli biso, kotiola oyo batiolaki Yo ; zongisela bango mbala sambo.


Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba.


Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye, asemboli loboko na Ye mpe abeti bango ; bangomba eningani, bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala. Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te, loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama.


« Mwana na moto, sakola. Loba : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mopanga, mopanga ! Bangalisi mpe bapelisi yango !


Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


Soki bitumbu yango ekoki kaka te mpo na kozongisa bino na nzela, nzokande bokobi kaka koboya kotosa Ngai,


Ngai mpe nakotelemela bino mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


Soki, atako bongo, boyoki kaka te mpe bokobi kaka kotelemela Ngai,


Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola : ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ