Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase : — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe.