10 Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo ; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika.
Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino, mpe bokolia bambuma na yango.