Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bongo na sima, na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, na mokolo ya bolimbisi masumu, bokobeta kelelo na bisika nyonso kati na mokili na bino mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:9
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosembo mpe alima ezali miboko ya Kiti ya Bokonzi na Yo, boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.


Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko ! Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,


Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.


Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi.


Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela : na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te,


pamba te na mokolo wana nde bokosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino mpe kopetolama bino. Boye bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe.


« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai.


« Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai ; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto.


Bokotanga mibu sambo ya Saba, mbala sambo, na mibu sambo ; mpe mibu sambo ya Saba ekosala mibu tuku minei na libwa.


Soki abulisi elanga na ye, na mobu ya kosepela kokangolama, motuya oyo bakata ekotikala bongo.


Na mobu ya kosepela kokangolama, elanga yango ekozonga na maboko ya moto oyo atekaki yango : mokolo mabele.


Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »


Tango mobu ya kosepela kokangolama ekokoma mpo na bana ya Isalaele, libula ya bana basi yango ekobakisama na libula ya mabota ya mibali oyo babalaki bango, mpe bakozwa mabele na bango wuta na libula ya libota ya bakoko na biso. »


Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »


na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango.


Wuta epai na bino, Liloba na Nkolo epanzani kaka te na Masedwane mpe Akayi, kasi sango ya kondima na bino kati na Nzambe eyebani mpe bipai nyonso. Yango wana tozali lisusu na tina te ya koloba ata likambo moko mpo na yango,


Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ