6 Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino : yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo
Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino, mpe bokolia bambuma na yango.
Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.
Bokoki kobuka te bambuma oyo ebotaki yango moko na mbala eleki to kobuka bambuma ya vino na elanga oyo babongisa te ; ekozala mobu ya bopemi mpo na mabele.
Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.