Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:54 - Mokanda na Bomoi

54 Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:54
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko, mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli. Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo, mpe nakobikisa bana na yo.


mpo ete oloba na bakangami : ‹ Bobima, › mpe na bato oyo bazali kati na molili : ‹ Bokoma bansomi ! › Boye bakozala lokola bibwele oyo ezali kolia matiti pene ya nzela, mpe bakozwa bilei na bangomba nyonso oyo ebotaka matiti te.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »


Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.


Na mobu yango ya kosepela kokangolama na bino, moto nyonso kati na bino akozonga na mabele na ye.


Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ