Boye, ye elongo na moto oyo asombaki ye, bakotanga mibu oyo eleki wuta na mobu oyo amitekaki kino na mobu ya kosepela kokangolama ; bakokata motuya ya lisiko na ye kolanda motango ya mibu ndenge ezali lifuti ya moto ya mosala.
Soki etikalaki mibu moke kino na mobu ya kosepela kokangolama, akotanga mibu yango mpe akofuta mpo na lisiko na ye kolanda motango ya mibu oyo etikali.
Kasi soki abulisi elanga na ye epai na Yawe sima na mobu ya kosepela kokangolama, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda motango ya mibu oyo etikali kino na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama. Boye bakokitisa motuya oyo ekatama.