Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bokoki kobuka te bambuma oyo ebotaki yango moko na mbala eleki to kobuka bambuma ya vino na elanga oyo babongisa te ; ekozala mobu ya bopemi mpo na mabele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:5
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino, mpe bokolia bambuma na yango.


Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino mpe bokolia bambuma na yango.


Mobu ya tuku mitano ekozala mobu ya kosepela kokangolama na bino : bokolona te, bokobuka te biloko oyo bilanga ekobota yango moko, mpe bokobuka te bambuma ya vino ya elanga oyo babongisa te.


Kasi na mobu ya sambo, mabele esengeli kozala na bopemi, ekozala mobu ya Saba mpo na Yawe. Bokolona bilanga na bino te mpe bokobongisa bilanga na bino ya vino te, mabele esengeli kozala na Saba mpo na Yawe.


Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino : yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ