Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:43 - Mokanda na Bomoi

43 Kokonza bango te na makasi, kasi banga Nzambe na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:43
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango : — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi.


Mpe sik’oyo, bolingi kokomisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi bawumbu na bino ? Kasi bino moko, bozali mpe na ngambo te liboso ya Yawe, Nzambe na bino ?


Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi tango bazwaki ngai mabe,


nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai ? Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai ndenge nini nabandaki kosala ?


Kasi basi oyo babotisaka babangaki Nzambe mpe basalaki te makambo oyo mokonzi ya Ejipito atindaki bango kosala ; batikaki bana mibali na bomoi.


Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.


Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango.


Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango : — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala ?


Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.


balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te ? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te ? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.


Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo ; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki ; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango !


Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito ; bakoki te koteka bango lokola bawumbu.


Okozwa bawumbu na yo ya mibali mpe basi bawumbu na yo kati na bikolo oyo ezingeli yo ; okosomba bango kaka na bikolo yango.


Okoki kotika bango epai ya bana na yo lokola libula mpo ete sima na yo bakoma bawumbu na bango mpo na libela ; kasi kokonza te na makasi bandeko na yo, bana ya Isalaele.


Na mibu nyonso oyo akosala epai ya mosombi na ye, bakozwa ye lokola moto ya mosala ; okotika te ete mosombi na ye akonza ye na makasi.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bongo mpo na bino bankolo, bosalaka mpe ndenge wana epai ya bawumbu na bino. Bobangisaka bango te, lokola boyebi malamu ete Nkolo na bango, oyo azali kati na Likolo azali mpe Nkolo na bino mpe aponaka bilongi te.


tango bolembaki nzoto mpe bosilaki makasi, babimelaki bino na pwasa na mobembo na bino mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki na sima ; babangaki Nzambe te.


Bino bankolo, bosungaka bawumbu na bino na nzela ya biloko ya sembo mpe ya solo, pamba te boyebi malamu ete bino mpe bozali na Mokonzi kati na Likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ