Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:41 - Mokanda na Bomoi

41 mpe na sima, akozwa bonsomi elongo na bana na ye, akozonga na etuka na ye mpe akozongela mabele ya batata na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:41
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko ; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo.


Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.


Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango.


Okozwa ye lokola moto na yo ya mosala to lokola moleki nzela oyo azali kati na bino ; akosalela yo kino na mobu ya kosepela kokangolama ;


Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito ; bakoki te koteka bango lokola bawumbu.


Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ