Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.
« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino ; ezala mabele esengeli kopema, yango ekozala Saba mpo na Yawe.