Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki.
asengeli kotanga motango ya mibu wuta atekaki mabele na ye mpe akozongisa motuya ya mibu oyo etikali epai ya moto oyo asombaki yango. Boye, akoki kozongela mabele na ye.
Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko.
Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.