25 Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki.
Soki mopaya to moleki nzela moko kati na mokili na yo akomi na bozwi mpe moko kati na bandeko na yo, mwana mboka, akomi mobola ; bongo amiteki epai ya mopaya to moleki nzela yango to epai ya moto moko ya libota na ye ;
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.
Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »
Pamba te oyebi malamu ete Boazi, oyo osalaki elongo na basali na ye ya basi, azali ndeko na biso. Na pokwa ya lelo, akoyungola orje oyo basilaki kosopa na etando.
Atunaki ye : — Yo ozali nani ? Azongisaki : — Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola.