Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:24 - Mokanda na Bomoi

24 Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:24
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Anameyeli, mwana mobali ya Shalumi, noko na yo, azali koya epai na yo mpe akoloba : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti, pamba te yo nde ozali na makoki mpe na mokumba ya kosikola yango. ›


Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki, ata soki azali nanu na bomoi ; pamba te emoniseli oyo ezali kotalisa ete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo. Likolo ya masumu na bango, moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye.


Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela.


Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki.


asengeli kotanga motango ya mibu wuta atekaki mabele na ye mpe akozongisa motuya ya mibu oyo etikali epai ya moto oyo asombaki yango. Boye, akoki kozongela mabele na ye.


Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama.


Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.


Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,


lokola ndanga ya libula na biso kino basikolami na Ye bakangolama mpo na kosanzola nkembo na Ye.


Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe


Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ