Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:23 - Mokanda na Bomoi

23 Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:23
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na bango : — Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino ; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai.


Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.


Kasi Naboti azongiselaki Akabi : — Na Kombo na Yawe, nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai.


Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela, ndenge ezalaki batata na biso. Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka lokola elili oyo ezangi elikya.


nakopikola bino na mabele na Ngai, mabele oyo napesaki bino ; nakobwaka mosika ya miso na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso.


Nazali mopaya awa na mokili ; kobombela ngai mibeko na Yo te.


Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.


Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela ; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.


Yawe, yoka libondeli na ngai ; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore.


Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,


Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki : « Nazali mopaya na mboka mopaya. »


Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo ; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. »


Bakoki te koteka to kopesa eloko moko kati na eteni ya mabele yango na bato mosusu, pamba te yango ezali mabele oyo eleki kitoko, mpo ete ebulisama mpo na Yawe.


Bakovanda lisusu te na mboka na Yawe ; Efrayimi akozonga na Ejipito, mpe bakolia bilei ya mbindo kati na Asiri.


Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Ye mpe akoyokela bato na Ye mawa.


Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.


Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.


Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye.


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ