Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye ; moko te abima na libanda.
Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli.
Kasi na mobu ya sambo, mabele esengeli kozala na bopemi, ekozala mobu ya Saba mpo na Yawe. Bokolona bilanga na bino te mpe bokobongisa bilanga na bino ya vino te, mabele esengeli kozala na Saba mpo na Yawe.
Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino : yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo
Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.