Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi.
Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.
Bazalaki koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino abongola motema, atika nzela mpe misala na ye ya mabe ; pamba te ezali na nzela wana nde bokoki kowumela na mokili oyo Yawe apesaki bino mpe batata na bino, wuta kala, mpo na libela.
Okobatela bikateli na ngai : okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana ; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana.
Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.
Mpo na Benjame, alobaki : « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! »