Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 25:14 - Mokanda na Bomoi

14 Soki bozali koteka mabele epai ya ndeko na bino to soki bozali kosomba eloko songolo epai na ye, wana bozali bana mboka moko, tika ete moko te kati na bino akosa ndeko na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 25:14
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.


mpo na kolongisa mwana etike mpe monyokolami ; boye, bato ya mokili bakobangisa lisusu te.


Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.


Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.


Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.


Mokonzi oyo anyokolaka bato azangi mayele, kasi oyo aboyaka bomengo na nzela ya moyibi ayeisaka mikolo ya bomoi na ye ebele.


Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.


Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.


Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali !


Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe.


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.


Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.


Okosomba epai ya ndeko na yo ya mboka, na motuya ya mbongo oyo bakokata kolanda motango ya mibu oyo eleki wuta mobu ya suka oyo bosepelaki kokangolama na bino ; mpe akotekela yo na motuya ya mbongo oyo ekokatama kolanda motango ya mibu oyo ekotikala, mibu ya kobuka bambuma, kino bokoma na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama na bino.


Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.


Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.


Nzokande, bino, bokosaka mpe bosalaka mabe ; mpe bosalaka yango epai ya bandeko na bino.


Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ