Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki, ata soki azali nanu na bomoi ; pamba te emoniseli oyo ezali kotalisa ete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo. Likolo ya masumu na bango, moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye.
Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.
Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango.
Tango mobu ya kosepela kokangolama ekokoma mpo na bana ya Isalaele, libula ya bana basi yango ekobakisama na libula ya mabota ya mibali oyo babalaki bango, mpe bakozwa mabele na bango wuta na libula ya libota ya bakoko na biso. »