Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.
Yawe alobaki na Moyize : — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
Okotia mabanga yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele. Aron akomema likolo ya mapeka na ye lokola ekaniseli liboso ya Yawe bakombo na bango.
Omemelaki Ngai bana meme te lokola mbeka ya kotumba, mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo. Nakomisaki yo mowumbu te mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo, mpe nalembisaki yo te mpo ete obonzela Ngai malasi.
Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Nganga-Nzambe akolongola na makabo ya mbuma eteni oyo esengeli kobonzama lokola ekaniseli mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.