Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 24:5 - Mokanda na Bomoi

5 Okozwa farine mpe okolamba bagato zomi na mibale, okosalela biteni mibale kati na biteni zomi ya efa mpo na gato moko na moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 24:5
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya akamataki mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya bana mibali ya Jakobi oyo Yawe alobaki na ye : « Kombo na yo ekozala Isalaele. »


Bazalaki na mokumba ya kotanda mapa na mesa, kobongisa farine mpo na makabo ya bagato ezanga levire, bagalete mpe bagato batumba na kikalungu, mpe bagato basangisa na mafuta mpe biloko nyonso oyo bamekelaka kilo mpe molayi.


Bamosusu kati na bango, bato ya Keati, bazalaki na mokumba ya kobongisa mapa na milongo mpo na basaba nyonso.


Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule ; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso ; kasi bino, bosundolaki Ye.


Tozwi lisusu mokano ya kotosa mibeko, ya kopesa bagrame minei ya mbongo ya bibende ya palata mobu na mobu, mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na biso,


mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. »


Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.


mesa, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe ;


mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango ; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango.


Na likolo ya mesa ya bagato ya bule, bakotanda lisusu liputa ya langi ya ble mpe bakotia na likolo na yango biloko oyo : basani ya mbele, bambeki, bakopo, milangi mpo na makabo ya masanga mpe bagato oyo bakobanda kobonza lokola makabo liboso na Ngai tango nyonso.


ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ?


Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe, butu mpe moyi, na kolemba te, mpo ete bazalaki na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi Agripa, ezali kaka mpo na elikya yango nde Bayuda bafundi ngai.


Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.


Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.


Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe : — Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami.


Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ