Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 24:4 - Mokanda na Bomoi

4 Minda ekozala likolo ya etelemiselo ya minda, esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe ; bakobongisa yango tango nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 24:4
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi, liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, bafololo na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto,


kilo ya wolo mpo na bitelemiselo ya minda basala na wolo mpe minda na yango ya wolo kolanda kilo ya etelemiselo moko na moko ya minda elongo na minda na yango ; kilo ya palata mpo na etelemiselo moko na moko ya minda, basala na palata mpe minda na yango ya palata kolanda mosala ya etelemiselo moko na moko ya mwinda ;


Bakangaki kutu bikuke ya ndako moke ya kokotela, babomaki minda mpe batikaki kobonzela Nzambe ya Isalaele malasi mpe bambeka ya kotumba kati na Esika ya bule.


mesa elongo na biloko na yango ; etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso ; etumbelo ya malasi,


etelemiselo ya minda, oyo basala na wolo ya peto, minda na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mafuta mpo na kopelisa minda yango,


Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : basani ya minene, bambabola, basani ya kobwakela mayi, basani ya putulu, bitelemiselo ya minda, bakopo mpe milangi mpo na makabo ya masanga.


Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron akobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo na bino nyonso.


Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.


Bakokamata liputa ya langi ya ble mpe bakofinika na yango etelemiselo ya minda elongo na minda na yango, biloko oyo balongolelaka makala na moto, basani mpo na putulu ya moto mpe basani ya mafuta, oyo basalelaka mosala na mesa.


« Loba na Aron mpe yebisa ye : ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › »


Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.


Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo : minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo ; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »


Batatoli wana mibale bazali banzete mibale ya olive mpe bitelemiselo mibale ya minda ; mpe batelemaka liboso ya Nkolo ya Mokili.


Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ