21 Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu ; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye.
Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.
Soki moto atiki libulu polele to atimoli libulu mpe azipi yango te, bongo ngombe to ane ezindi kuna ;
Sima, akolongola bilamba wana mpe akolata bilamba mosusu ; bongo akomema putulu na libanda ya molako, na esika ya peto.