Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.