Levitike 24:11 - Mokanda na Bomoi11 Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.