8 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › »
Bokozala na mayangani ya bule na mokolo ya liboso mpe na mokolo ya sambo. Bokosala mosala moko te na mikolo wana longola kaka mosala ya kolamba bilei oyo moto na moto akolia. Yango kaka nde bokosala.
Na mikolo nyonso sambo ya feti, mokonzi akopesa bangombe ya mibali sambo mpe bameme ya mibali sambo, oyo ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, mpe ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu.
Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo.