Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ?
Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.