Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
Efrayimi alobaka na lolendo nyonso : « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »
« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe.
Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino ; bokosala feti yango na sanza ya sambo.
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.