Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 23:41 - Mokanda na Bomoi

41 Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino ; bokosala feti yango na sanza ya sambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 23:41
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo ; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti.


Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala.


Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo.


Bokovanda na bandako ya matiti mikolo sambo ; bato nyonso oyo bazali bana mboka ya Isalaele bakovanda kati na bandako yango ya matiti


Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ