39 Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, sima na kobuka bambuma ya mabele, bokosala feti mpo na Yawe, mikolo sambo. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya mwambe ekozala mikolo ya kopema.
Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga.
« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai.
« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe.
Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala.
Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko.
Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo.