Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 23:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 23:31
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oyo nde ekozala mpo na bino malako ya libela : mbala moko na mobu, bokosala mosala ya bolimbisi masumu nyonso ya bana ya Isalaele. » Mpe basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala.


Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.


Nakoboma moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo wana.


Ekozala mpo na bino mokolo ya kopema lokola mokolo ya Saba, mokolo ya komikitisa. Bokobatela mokolo na bino ya Saba, kobanda na pokwa ya mokolo ya libwa kino na pokwa ya mokolo oyo ekolanda. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ