Levitike 23:3 - Mokanda na Bomoi3 Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule ; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,