Levitike 23:24 - Mokanda na Bomoi24 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule : Yawe azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata.