Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 23:20 - Mokanda na Bomoi

20 Nganga-Nzambe akobonza na kotombola, liboso ya Yawe, bana meme yango mibale elongo na mapa ya bambuma ya liboso. Ekozala makabo ya bule mpo na Ngai Yawe mpe ekozala ya Nganga-Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 23:20
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotia biloko oyo nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; okoyebisa bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.


Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola ; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe.


Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani.


Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.


Moyize azwaki tolo ya meme ya libulisi, atombolaki yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Boni, soki tolonaki nkona ya molimo kati na bino, ezali penza mabe soki tobuki kati na bino mbuma ya biloko oyo maboko ekoki kosimba ?


Solo, azali Ye moko kimia na biso : atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango,


Okopesa ye bambuma na yo ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta mpe bapwale nyonso ya liboso oyo okolongola na bameme na yo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ