Levitike 23:2 - Mokanda na Bomoi2 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokobanda kosangana mpo na kosala bafeti mpo na lokumu na Ngai, bokobanda kobengisa bato mpo na kogumbamela Ngai Yawe, pamba te ezali mayangani ya bule. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele.
Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga, pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te. Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te, Banganga-Nzambe na ye bazali kolela, bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazali na mawa ; bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.
Oyo nde bafeti oyo bokobanda kosala mpo na lokumu ya Yawe, mpe oyo bokobanda kobengisela bato na mayangani ya bule mpo ete basambela Yawe mpe babonzela Ye makabo bazikisa na moto, bambeka ya kotumba mpe makabo ya bagato, bambeka mpe bambeka ya masanga ya vino, kolanda ndenge ekatama mpo na mokolo na mokolo.
Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama ; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › »