Levitike 23:17 - Mokanda na Bomoi17 Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola ; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Elongo na mapa wana, bokobonza lokola mbeka ya kotumba : bana meme sambo ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba, ngombe moko ya mobali mpe bameme mibale ya mibali. Bokobonza yango mpo na Yawe, elongo na makabo na yango ya bambuma mpe ya masanga, lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.