Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 23:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 23:14
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Olakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo.


Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.


Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.


Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.


lisusu mpo ete boyeba koteya bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo Yawe apesaki bino na nzela ya Moyize. »


Soki omemeli Yawe likabo ya bambuma ya liboso, okomema bambuma ya sika bakalinga na moto mpe batuta.


Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.


Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino ; bokosala feti yango na sanza ya sambo.


Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »


Kobosana te ete ozalaki mowumbu kati na Ejipito mpe salela malamu mitindo oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ