Levitike 23:13 - Mokanda na Bomoi13 Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta ; mpe mpo na meme moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta.