Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 23:11 - Mokanda na Bomoi

11 Na mokolo oyo ekolanda Saba, Nganga-Nzambe akobonza liboke yango na kotombola liboso ya Yawe mpo ete Ngai nandima yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 23:11
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Linzanza yango ekozala na mbunzu ya Aron mpo ete akoka komema bambeba oyo bana ya Isalaele bakosala na tina na biloko ya bule oyo bakobonza mpe bakobulisa. Linzanza yango ekozala tango nyonso na mbunzu ya Aron mpo ete Ngai Yawe, nandima makabo yango.


Okotia biloko oyo nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; okoyebisa bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.


Kati na bambeka ya boyokani oyo bana ya Isalaele bakobanda kobonza, yo mpe bana na yo, bokobanda kolia, na Esika ya bule, lokola eteni oyo epesameli bino, tolo oyo ekobonzama lokola likabo ya kotombola mpe mopende ya banyama oyo ekobonzama epai ya Yawe.


« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka.


Na mokolo yango, bakobonza liboke yango na kotombola, bokobonzela Yawe mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba.


Aron atombolaki liboso ya Yawe likabo ya kotombola, batolo mpe mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ndenge Moyize atindaki.


Ndenge wana nde Naomi azongaki na Yuda wuta na Moabi, elongo na Rite, moto ya Moabi, bokilo na ye ya mwasi. Bakomaki na Beteleemi, na ebandeli ya tango oyo babukaka bambuma ya orje.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ