Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 23:10 - Mokanda na Bomoi

10 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 23:10
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo : ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango ; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.


Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga.


Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.


Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu.


Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.


Bambuma ya liboso oyo ya kitoko mpe makabo na bino nyonso, kolongola ata eloko moko te, ekozala ya Banganga-Nzambe ; bokopesa bango bambuma ya liboso ya bilanga na bino ya ble mpo ete mapamboli ezala kati na bandako na bino.


« Tango bokokota na mokili ya Kanana oyo napesi bino, soki natie litono ya maba na ndako moko ya mokili oyo napesi bino,


Na mokolo oyo ekolanda Saba, Nganga-Nzambe akobonza liboke yango na kotombola liboso ya Yawe mpo ete Ngai nandima yango.


Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola ; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe.


« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda,


Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo.


Nzokande, soki mapa ya liboso oyo babonzeli Nzambe ezali bule, elingi koloba ete mapa nyonso oyo etikali ezali mpe bule ; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete bitape na yango mpe ezali bule.


Okotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo okotia mbeli na elanga ya ble mpo na kobuka ble yango.


Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.


Nzokande, na tango ya kobuka milona, mayi ya Yordani etondaka makasi penza. Kasi tango kaka Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bakomaki pembeni ya Yordani mpe batiaki matambe na bango kati na mayi,


Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.


Ndenge wana nde Naomi azongaki na Yuda wuta na Moabi, elongo na Rite, moto ya Moabi, bokilo na ye ya mwasi. Bakomaki na Beteleemi, na ebandeli ya tango oyo babukaka bambuma ya orje.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ