Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.
Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali ; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma.
bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.