Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.
Kati na bibwele nyonso oyo etambolaka na libumu, bokomona oyo wana lokola mbindo. Moto nyonso oyo akosimba yango wana esili kokufa akozala mbindo kino na pokwa.
Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi ; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa ; sima na yango nde ekozonga lisusu peto.
mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.
Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.